Mokanda na Bomoi 2002
|
| 1 |
| Kaka mokolo wana, Yesu abimaki na ndako mpe akendaki pembeni ya ebale. |
| 2 |
| Bato ebele penza bayaki kotondela ye bipai na bipai; yango wana amataki na bwato mpe avandaki. Bongo ebele ya bato batelemaki na mokili. |
| 3 |
| Mpe ateyaki bango makambo mingi na masapo. Alobaki na bango: —Moloni moko akendaki kolona mbuma na elanga. |
| 4 |
| Tango azalaki kobwaka bambuma, ndambo ekweyaki pembeni-pembeniya nzela; bandeke bayaki mpe baliaki yango. |
| 5 |
| Ndambo ekweyaki na esika ya mabanga, epai mabele ezalaki mingi te. Bambuma yango ebimaki noki mpo mabele ezalaki na mozindo te. |
| 6 |
| Kasi tango moi ya makasi ebimaki, mwa banzete yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ezalaki na misisa te. |
| 7 |
| Mosusu ekweyaki kati ya banzube; banzube ekolaki mpe efinaki mwabanzete yango. |
| 8 |
| Kasi mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, mpe ebotaki bambuma: moko, nkama moko; mosusu, ntuku motoba; mpe mosusu, ntuku misato. |
| 9 |
| Oyo azali na matoyi, ayoka! |
| 10 |
| Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe batunaki ye: —Mpo na nini ozali kolobela bango na masapo? |
| 11 |
| Bongo ye azongiselaki bango: —Bino bozwi nzela ya koyeba basekele ya Bokonzi ya Likolo, kasi bango bazwi yango te. |
| 12 |
| Pamba te, moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mpeakotonda na yango; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobotola ye ata oyo azali na yango. |
| 13 |
| Tala tina nazali kosalela masapo mpo na kolobela bango; mpo ata bazali kotala, kasi bazali komona te; ata bazali kotia matoyi, kasi bazali koyoka te mpe kososola te. |
| 14 |
| Ezali mpo na bango nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisami, oyo ezali koloba: Bokoyoka, kasi bokososola te; bokotala, kasi bokomona te! |
| 15 |
| Pamba te mitema ya bato oyo ekomi libanga, bazipi matoyi mpe bakangi miso na bango; na kobanga ete miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, babongola mitema mpe nakoka kobikisa bango. |
| 16 |
| Nzokande, bino bozali bato ya esengo, pamba te miso na binoezali komona mpe matoyi na bino ezali koyoka. |
| 17 |
| Ya solo nalobi na bino: baprofeta mingi mpe bato mingi ya bosembo bazalaki na posa ya komona makambo oyo bozali komona, kasi bamonaki yango te; bazalaki na posa ya koyoka makambo oyo bozali koyoka, kasi bayokaki yango te. |
| 18 |
| Boyoka ndimbola ya lisapo ya moloni mbuma: |
| 19 |
| Mbala nyonso soki moto ayoki Liloba ya Bokonzi kasi asosoli yango te, monguna akoya mpe akopikola mbuma oyo elonamaki na motema na ye; oyo nde mbuma ekweyaki pembeni-pembeni ya nzela. |
| 20 |
| Oyo ekweyaki na esika ya mabanga, ezali moto oyo ayoki lilobampe ayambi yango mbala moko na esengo. |
| 21 |
| Kasi lokola ezangaki misisa, ewumelaki kaka mwa tango moke. Pamba te, tango bapasi to tango minyoko ekoya mpo na Liloba, akokweya noki penza. |
| 22 |
| Oyo ekweyaki na kati ya banzube, ezali moto oyo ayoki Liloba kasi makanisi ya bomoi oyo mpe bomengo oyo ekosaka, efinaka yango, mpe epesaka yango nzela te mpo na kobota. |
| 23 |
| Kasi oyo ekweyaki na mabele ya malamu, ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango. Abotaka mbuma: nkama, ntuku motoba, mpe ntuku misato. |
| 24 |
| Yesu alobelaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na moto moko alonaki mbuma ya malamu na elanga na ye. |
| 25 |
| Tango bato bazalaki kolala, monguna na ye ayaki mpe alonaki matitiya mabe na kati ya ble, bongo akendaki. |
| 26 |
| Tango ble ebimaki mpe ebandaki kobimisa mwa mitu ya mbuma, matiti ya mabe mpe ebimaki. |
| 27 |
| Basali ya nkolo ya elanga bayaki mpe balobaki: —Mokonzi, olonaki mbuma ya malamu na elanga na yo te? Bongo matiti oyo ya mabe ewuti wapi? |
| 28 |
| Ye azongisaki: —Monguna moto asali bongo! Basali batunaki: —Olingi tokende mpe topikola yango? |
| 29 |
| Ye azongisaki: —Te! Mpo tango bokobanda kolongola matiti ya mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango. |
| 30 |
| Botika yango mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka mbuma. Na tango wana nde, nakoloba na bato oyo balongolaka mbuma: “Bolongola liboso matiti ya mabe, bokanga yango maboke mpe botumba yango; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na ngai ya mbuma”. |
| 31 |
| Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na mbuma ya mutarde; moto moko azwaki mpe alonaki yango na elanga na ye. |
| 32 |
| Mbuma yango eleki bambuma nyonso na moke; kasi soki ebimi, elekaka biloko nyonso oyo balonaka na elanga mpe ekomaka mwa nzeteepai bandeke bayaka kosala bandako na bango na bitapi na yango! |
| 33 |
| Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na kisi oyo evimbisaka mampa oyo mwasi akamati mpeasangisi yango na kopo misato ya farine, kino tango farine nyonso ekovimba. |
| 34 |
| Yesu alobaki na ebele ya bato makambo nyonso wana na masapo, mpe ata mbala moko te azalaki kolobela bango bongo azangisa lisapo. |
| 35 |
| Na bongo nde maloba ya moprofeta ekokisamaki: Nakolobela bango na masapo. Nakoyebisa bango makambo oyo ebombama banda mokili esalama! |
| 36 |
| Bongo atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki: —Limbolela biso lisapo ya matiti ya mabe kati na elanga. |
| 37 |
| Yesu azongisaki: —Moto oyo alonaki mbuma ya malamu, ezali Mwana ya moto. |
| 38 |
| Elanga ezali mokili; mbuma ya malamu ezali bana ya Bokonzi. Matiti ya mabe ezali nde bato ya satana. |
| 39 |
| Monguna oyo alonaki matiti ya mabe, ezali Zabolo; tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili. Bongo bato oyo balongolaka mbuma, ezali baanzelu. |
| 40 |
| Ndenge moko lokola bapikolaka matiti ya mabe mpe batumbaka yango na moto, ekozala mpe bongo na suka ya mokili. |
| 41 |
| Mwana ya Moto akotinda baanzelu na ye, mpe bango bakolongola na Bokonzi na ye makambo nyonso oyo ekweyisaka na masumu elongo na bato oyo basalaka mabe. |
| 42 |
| Bakobwaka bango na fulu ya moto; epai ekozala kolela mpe koswa mino. |
| 43 |
| Bongo bato na sembo bakongenga lokola moi na kati ya Bokonzi ya Tata na bango. Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka! |
| 44 |
| —Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba na elanga; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu. Na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso oyo azali na yango mpe akosomba elanga wana! |
| 45 |
| Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo oyo alukaka bapawuni ya kitoko. |
| 46 |
| Soki amoni pawuni moko ya ntalo mingi, akokende koteka biloko nyonso oyo azali na yango mpe akosomba yango! |
| 47 |
| —Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo babwaki na ebale, mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge. |
| 48 |
| Soki etondi, bato oyo bakangaka mbisi bakobimisa yango na mokili, bakofanda, mpe bakotia oyo ya malamu na bitunga bongo bakobwaka oyo ya mabe. |
| 49 |
| Ekozala mpe bongo na suka ya mokili; baanzelu bakoya kokabola batomabe na kati ya bato na sembo. |
| 50 |
| Bongo bakobwaka bato mabe na fulu ya moto epai ekozala kolela mpe koswa mino. |
| 51 |
| —Bososoli makambo oyo nyonso? Bazongisaki: —E e! |
| 52 |
| Bongo Yesu alobaki na bango: —Yango wana molakisi nyonso ya Mibeko oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo, akokani na nkolo ndako oyo azali kobenda kati na bomengo na ye: biloko ya sika mpe biloko ya kala. |
| 53 |
| Tango Yesu asilisaki koloba masapo wana, alongwaki kuna |
| 54 |
| mpe azongaki na vile na ye. Abandaki koteya bato na ndako nabango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa. Batunaki: —Bwania mpe nguya ya kosala makamwisi oyo azwi yango wapi? |
| 55 |
| Ezali ye te mwana ya salampatie? Mama na ye kombo na ye Mariya te? Bongo Zaki, Zozefi, Simon mpe Zude bazali bandeko na ye ya mibali te? |
| 56 |
| Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali na biso awa te? Yango azwi makambo oyo nyonso wapi? |
| 57 |
| Bongo ye azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi yesu alobaki na bango: —Moprofeta azangaka lokumu kaka na mboka na ye mpe na ndako na ye. |
| 58 |
| Bongo asalaki makamwisi mingi kuna te, mpo bazangaki kondima. |
|
| Bomba ba note |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2002/matthew/013.mp3
28
13