Mokanda na Bomoi 2002
|
| 1 |
| Bafarizeo na Basaduseo bayaki epai ya Yesu mpo na komeka ye, mpe basengaki ye alakisa bango elembo moko oyo ekowuta na Likolo. |
| 2 |
| Yesu azongiselaki bango: —Na pokwa, bolobaka ete: “Lobi ekozala malamu penza, pamba telikolo ezali motane!” |
| 3 |
| Mpe na tongo, bolobaka: “Lelo mbula ya makasi ekobeta, pamba te, likolo ezali motane mpe eyindi”. Boyebi kolimbola bilembo ya likolo, kasi bokoki te kolimbola bilembo ya batango. |
| 4 |
| Libota ya bato mabe mpe oyo ezangi botosi nde ezali kosengaelembo ya kokamwisa. Bakopesa ye elembo mosusu te longola kakaoyo esalamaki na Jonasi. Bongo atikaki bango mpe akendaki na ye. |
| 5 |
| Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mampa. |
| 6 |
| Yesu alobaki na bango: —Bokeba mpe bokengela mpo na kisi oyo evimbisaka ya mampa ya bafarizeo mpe ya Basaduseoo! |
| 7 |
| Bayekoli babandaki kotunana bango na bango, mpe balobaki: —Ezali mpo tomemi mampa te! |
| 8 |
| Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango mpe alobaki: —Mpo na nini bozali kotunana bino na bino, mpo bomemi mampa te? Bato ya kondima moke! |
| 9 |
| Naino bososoli te? Bozali kokanisa te mampa mitano oyo bato nkoto mitano baliaki? Bongo botondisaki bitunga boni na oyo etikalaki? |
| 10 |
| To mampa sambo oyo bato nkoto minei baliaki? Bongo botondisaki bitunga boni na oyo etikalaki. |
| 11 |
| Ndenge nini bozali kososola te ete nalobaki mpo na mampa te? Kasi bokeba mpo na kisi oyo evimbisaka mampa ya bafarizeo mpe ya Basaduseo? |
| 12 |
| Bongo basosolaki ete alobaki na bango mpo bakeba na kisi oyo evimbisakamampa te, kasi mpo na mateya ya bafarizeo mpe Basaduseo. |
| 13 |
| Tango Yesu ayaki na mokili ya Sezareya ya Filipo, atunaki bayekoli na ye: —Bato balobaka ete Mwana ya moto azali nani? |
| 14 |
| Bazongisaki: —Basusu balobaka: Jean Batiste; Basusu: Eliya; mpe basusu: Jeremiya to moko ya baprofeta. |
| 15 |
| Yesu atunaki bango: —Bongo bino, bolobaka ete ngai nazali nani? |
| 16 |
| Simon Piere azongisaki: —Yo ozali Kristo, Mwana na Nzambe ya bomoi! |
| 17 |
| Bongo Yesu alobaki na ye: —Esengo mingi ezali na yo Simon mwana ya Jonasi! Pamba te moto te ayebisi yo makambo oyo, kasi ezali Tata na ngai oyo ya Likolo. |
| 18 |
| Bongo ngai nalobi na yo ete: yo ozali Piere, mpe na likolo ya libanga oyo nakotonga Lingomba na ngai. Mpe baporte ya lifelo ekoki kolonga yango te. |
| 19 |
| Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo. Nyonso oyo okokangaawa na mokili, ekokangama mpe na Likolo; mpe oyo yo okofungola awa na mokili, ekofungwama mpe na Likolo! |
| 20 |
| Bongo Yesu apekisaki bayekoli na ye mpo ete baloba na moto moko te ete ye azali Kristo. |
| 21 |
| Banda tango wana, Yesu abandaki kolimbola na bayekoli na yeete asengeli akende na Yeruzalem; kuna bankolo, bakonzi ya banganga-Nzambe, mpe balakisi ya Mibeko bakonyokola ye, bakoboma ye; mpe akosekwa na mokolo ya misato. |
| 22 |
| Bongo Piere amemaki ye pembeni mpe abandaki kolobela ye: —Nkolo, tika Nzambe abatela yo! Makambo wana eyela yo te! |
| 23 |
| Yesu abalukaki epai ya Piere, mpe alobaki na ye: —Longwa mosika na ngai Satana! Ozali libaku mpo na ngai, pamba te makanisi na yo ezali oyo ya Nzambe te, kasi ya bato. |
| 24 |
| Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Soki moto alingi kolanda ngai, esengeli amiboya ye moko, amema ekulusu na ye, mpe alanda ngai. |
| 25 |
| Pamba te, oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango; kasi oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai, akozwa yango lisusu. |
| 26 |
| Soki moto azwi mokili mobimba mpe abungisi elimo na ye, litombanini akozwa? To eloko nini moto akoki kopesa mpo ete asomba elimo na ye? |
| 27 |
| Pamba te Mwana ya Moto akoya na kembo ya Tata na yeelongo na baanzelu na ye mpe akopesa na moto na moto lifuti oyo ekoki na mosala na ye. |
| 28 |
| Nalobi na bino ya solo: bato mosusu bazali awa liboso ete bakufa, bakomona Mwana ya Moko koya kati na Bokonzi na ye. |
|
| Bomba ba note |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2002/matthew/016.mp3
28
16