×

Mokanda na Bomoi 2002

Matayo 17

1
Sima ya mikolo motoba, Yesu akamataki Piere, Zaki mpe Jean ndeko ya Zaki, amemaki bango likolo ya ngomba moko ya molayi penza, epai bazalaki kaka bango moko.
2
Bongo nzoto na ye ebongwanaki liboso na bango; elongi na ye ekomaki kongengalokola moi mpe bilamba na ye ekomaki pembe makasi penza.
3
Na mbala moko, Moyize na Eliya babimelaki bango mpe babandaki kosolola na Yesu.
4
Bongo Piere alobaki na Yesu: —Nkolo, ezali malamu tozala na biso awa; soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo, moko mpo na yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya!
5
Na tango azalaki naino koloba, lipata moko ezalaki kongengaezipaki bango, mpe mongongo ewutaki na lipata elobaki: —Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, asepelisaka ngai mingi; boyokelaka ye!
6
Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi na nse, mpe kobanga ekotelaki bango.
7
Kasi Yesu ayaki, asimbaki bango mpe alobaki: —Botelema, bobanga te!
8
Mpe tango batombolaki miso, bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu ye moko.
9
Awa bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango motindo oyo: —Makambo oyo bomoni boloba yango na moto te, kino tango Mwanaya moto akosekwa kati na bakufi.
10
Bongo bayekoli batunaki ye: —Mpo na nini balakisi ya Mibeko balobaki ete esengeli Eliya aya liboso?
11
Yesu azongisaki: —Solo, Eliya akoya, mpe akobongisa makambo nyono.
12
Kasi ngai nalobi na bino: Eliya asiʼayaki mpe bayebaki ye te; kasi basalaki ye makambo nyonso ndenge bango moko balingaki. Ndenge moko mpe ndenge bakoyiokola Mwana ya moto.
13
Bongo bayekoli basosolaki ete alobelaki bango mpo na Jean Batiste.
14
Tango bakomaki epai ebele ya bato bazalaki; moto moko apusanaki pene-pene ya Yesu, afukamaki liboso na ye, mpe alobaki:
15
—Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa! Azali na maladi ya ndeke mpe azali konyokwama mingi penza. Mbala mingi akweyaka na moto to na mayi.
16
Namemaki ye epai ya bayekoli na yo; kasi bango bakoki te kobikisa ye!
17
Yesu azongisaki: —Libota ya bato mabe mpe ezangi kondima! kino tango nini nakozala na bino elongo? Kino tango nini nakokanga lisusu motema mpo na bino? Bomemela ngai ye awa!
18
Yesu agangelaki molimo mabe, mpe yango ebimaki na mwana. Kaka na tango wana, mwana abikaki.
19
Sima bayekoli bayaki epai ya Yesu bango moko kaka, mpe batunaki ye: —Mpo na nini tokokaki te kobengana molimo wana?
20
Yesu azongiselaki bango: —Mpo bozali na kondima moke. Nalobi na bino ya solo, soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, mbele bokoki koloba na ngombaoyo: “Longwa awa, kende kuna!” Yango ekolongwa; mpe eloko moko tebokokaki kolemba kosala.
21
[Kasi molimo ya ndenge oyo, ebimaka kaka na mabondeli mpe na koboya kolia mpo na mabondeli.]
22
Tango bayaki elongo na Galileya, Yesu alobaki na bango: —Bakoteka Mwana ya moto na maboko ya bato,
23
mpe bakoboma ye. Kasi akosekwa na mokolo ya misato. Bongo bayekoli bayokaki mawa mingi penza.
24
Tango bakomaki na Kapenawumi, bato oyo bafutisaka mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Piere, mpe batunaki: —Boni, Moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te?
25
Piere azongisaki: —E e, afutaka! Tango Piere akotaki na Ndako, Yesu azwaki maloba liboso mpe atunaki ye: —Simon okanisi nini? Bakonzi ya mokili bafutisaka bampako na banani? Na bana na bango to na bato mosusu?
26
Piere azongisaki: —Na bato mosusu! Bongo Yesu alobaki na ye: —Soki boye, bana-mboka basengeli kofuta te.
27
Kasi mpo tobetisa bango mabaku te, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi, mpe kamata mbisi ya liboso oyo okokanga; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo ya ebende. Kamata yango, mpe pesa bango yango mpo na kofuta mpako na ngai na oyo ya yo.
Lingala Bible 2002
Mokanda na Bomoi™ (Book of Life) 2002 by Biblica, Inc.®
:
Bomba ba note