Yesu abotamaki na Betelemi ya Yudea, tango Erode azalaki mokonzi; sima na yango, bato ya mayele oyo bayekolaka minzoto, bawutaki na mokili ya Este, bakomaki na Yeruzalem.
E e yo Betelemi, kati na mokili ya Yudea, ozali moke te kati ya bakonzi ya Yudea, pamba te, Mokonzi akobima epai na yo, oyo akozala mobateli ya bato na ngai Isayele!
Sima ya koyoka maloba ya mokonzi, bakendaki. Mpe monzoto oyo bamonaki na Este ezalaki kokende liboso na bango kino tango etelemaki likolo ya esika mwana azalaki.
Bakotaki na ndako, bamonaki mwana na mama na ye Mariya; bafukamaki mpe bakumbamelaki ye. Bongo bafungolaki basaki na bango, mpe bapesaki ye makabo oyo: wolo, ansa mpe mafuta ya solo kitoko.
Tango bakendaki, anzelu ya Nkolo abimelaki Zozefi na ndoto mpe alobaki na ye: —Telema, kamata mwana na mama na ye, mpe kina na Ezipito. Vanda kuna kino tango nakoyebisa yo pamba te Erode akoluka mwana, mpo na koboma ye.
Avandaki kuna kino tango Erode akufaki. Na bongo nde maloba ya Nkolo, oyo alobaki na monoko ya moprofeta ekokisamaki: Nabengaki mwana na ngai abima na Ezipito.
Tango Erode amonaki ete bato ya mayele oyo batalaka minzoto batosaki ye te, atondaki na kanda. Yango wana atindaki ete baboma, na Betelemi mpe na bamboka ya pembeni-pembeni na yango, bana nyonso ya mibali oyo bazalaki na bambula mibale kino na nse; pamba te alandaki malamu penza tango oyo bato ya mayele baoyo batalaka minzoto bayebisaki ye.
Kasi tango ayokaki ete Arkelawusi akomaki mokonzi ya Yudea na esika ya tata na ye Erode, abangaki kokende kuna. Awa bakebisaki ye na ndoto, akendaki kovanda na ekolo ya Galileya,