Mokanda na Bomoi 2002
|
| 1 |
| Yesu alobaki na bango lisusu na masapo. Alobaki: |
| 2 |
| —Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti mpo na libala ya mwana na ye ya mobali. |
| 3 |
| Bongo atindaki basali na ye mpo babenga bato oyo babengamaki nafeti; kasi bato yango balingaki koya te. |
| 4 |
| Atindaki lisusu basali mosusu, mpe alobaki na bango: “Boloba na bato oyo babengamaki na feti ete nasiʼnabongisi biloko ya kolia. Nabomisi bangombe mpe banyama ya mafuta, mpe biloko nyonso esiʼebongisami malamu. Boya na feti ya libala.” |
| 5 |
| Kasi bato oyo babengamaki bamonaki makambo wana pamba, mpe moto na moto akendaki: moko na elanga na ye, mpe mosusu na mombongo na ye. |
| 6 |
| Bongo baoyo batikalaki, bakangaki basali na ye, baniokolaki bangompe babomaki bango. |
| 7 |
| Mokonzi ayokaki kanda mingi; atindaki basoda na ye mpo baboma babomi wana, mpe batumba vile na bango. |
| 8 |
| Bongo alobaki na basali na ye: “Biloko ya feti esiʼebongisami, kasi bato oyo babengamaki bakoki te mpo na kolia yango. |
| 9 |
| Bokende na bisika oyo babalabala ekutana, mpe bobenga bato nyonsooyo bokomona mpo baya na feti ya libala.” |
| 10 |
| Basali bakendaki na babalabala mpe basangisaki bato nyonso oyobamonaki: bato mabe mpe bato malamu, mpe ndako ya feti etondaki na bato. |
| 11 |
| Kasi tango mokonzi akotaki, mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko alataki te elamba ya feti ya libala. |
| 12 |
| Atunaki ye: “Moninga na ngai, ndenge nini okoti awa, mpe ozangi elamba ya feti?” Kasi moto yango azangaki maloba ya kozongisa. |
| 13 |
| Bongo mokonzi alobaki na basali na ye: “Bokanga ye makolo na maboko, mpe bobwaka ye libanda, na molili, epai ekozala kolela mpe koswa mino.” |
| 14 |
| Pamba te, babengami bazali mingi, kasi baponami bazali moke! |
| 15 |
| Bafarizeo bakendaki mpe bayokanaki mpo na koluka nzela ya kokanga Yesu na maloba na ye moko. |
| 16 |
| Bongo batindaki bayekoli na bango epai na ye, elongo na bato ya lisanga ya Erode. Mpe balobaki: —Moteyi, toyebi malamu ete yo ozali solo, oteyaka nzela ya Nzambe na bosolo nyonso, mpe obangaka moto te, pamba te otalaka bilongi ya bato te. |
| 17 |
| Lobela biso, okanisi nini mpo na likambo oyo: Ndingisa ezali mpo na kofuta mpako epai ya Sezare to te? |
| 18 |
| Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango ya mabe, mpe alobaki: —Bato ya kokosana! Mpo na nini bozali komeka ngai? |
| 19 |
| Bolakisa ngai mbongo oyo bofutelaka mpako! Bamemelaki ye deni moko. |
| 20 |
| Bongo atunaki bango: —Elongi oyo, na makomi oyo bakomi awa, ezali ya nani? |
| 21 |
| Bazongisaki: —Ya Sezare! Bongo Yesu alobaki na bango: —Bopesa na Sezare oyo ezali ya Sezare, mpe na Nzambe oyo ezali ya Nzambe! |
| 22 |
| Bakamwaki mingi penza tango bayokaki bongo; batikaki ye mpe bakendaki. |
| 23 |
| Kaka na mokolo wana, Basaduseo, baoyo balobaka ete lisekwa ezali tebayaki epai na ye mpe batunaki ye motuna oyo: |
| 24 |
| —Moteyi, Moyize alobaki: Soki mobali akufi mpe aboti bana te, ndeko na ye akobala mwasi oyo ye atiki mpo abotela ye bana. |
| 25 |
| Nzokande na kati na biso, ezalaki na bandeko sambo ya mibali. Oyo ya liboso abalaki mwasi, bongo akufaki; lokola babotaki bana te, atikaki mwasi na ye epai ya ndeko na ye ya mobali. |
| 26 |
| Mpe esalamaki kaka ndenge moko mpo na ndeko ya mibale, yamisato, kino na oyo ya sambo. |
| 27 |
| Na sima, mwasi mpe akufaki. |
| 28 |
| Bongo na mokolo ya lisekwa, mwasi yango akozala mwasi ya nani na kati na bango sambo? Pamba te, bango nyonso babalaki ye! |
| 29 |
| Yesu azongiselaki bango: —Bozali komikosa, mpo boyebi Makomi te, to mpe nguya ya Nzambe. |
| 30 |
| Pamba te, sima ya lisekwa, mibali na basi bakobala te, mpe bakobalisa te, kasi bakozala lokola baanzelu na Likolo. |
| 31 |
| Kasi mpo na likambo ya lisekwa ya bato bakufa, naino botangi te oyo Nzambe alobaki na bino: |
| 32 |
| Nazali Nzambe ya Abraham, Nzambe ya Izaki mpe Nzambe ya Zakobi? Nzambe, azali Nzambe ya bato bakufa te, kasi ya bato ya bomoi! |
| 33 |
| Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi penza mpo na mateya na ye. |
| 34 |
| Tango bafarizeo bayokaki ete Yesu akangisaki Basaduseo monoko, bango mpe basanganaki esika moko. |
| 35 |
| Bongo moko na kati na bango azalaki molakisi ya Mibeko, ayaki komeka Yesu na motuna oyo: |
| 36 |
| —Moteyi, Mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko nyonso? |
| 37 |
| Yesu azongiselaki ye: —Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na elimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso! |
| 38 |
| Oyo nde mobeko ya liboso mpe oyo eleki monene. |
| 39 |
| Mobeko ya mibale, oyo ekokani na yango, yangʼoyo: Linga moninga na yo lokola omilingaka yo moko. |
| 40 |
| Mibeko nyonso mpe mateya ya baprofeta ezali na kati ya mibeko oyo mibale! |
| 41 |
| Tango bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango: |
| 42 |
| —Bokanisi nini mpo na Kristo? Azali Mwana ya nani? Bongo bazongiselaki ye: —Azali mwana ya David! |
| 43 |
| Alobaki na bango: —Bongo ndenge nini David, na kotindama ya Molimo, abengaki ye Nkolo? Pamba te alobaki: |
| 44 |
| Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: Vanda na loboko na ngai ya mobali, kino tango nakotia banguna na yo, na nse ya makolo na yo! |
| 45 |
| Soki David abengi ye “Nkolo”, bongo ndenge nini akoki kozalalisusu mwana na ye? |
| 46 |
| Moto moko te akokaki kozongisela ye ata liloba. Mpe banda mokolo wana, moto ata moko te amekaki lisusu kotuna ye mituna. |
|
| Bomba ba note |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2002/matthew/022.mp3
28
22