Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki: baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.
Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano; na mosali ya mibale, batalanta mibale; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo.
Nkolo na ye azongisaki: « Mosali mabe mpe ya goyigoyi! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te,
Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali: « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.
Bongo, bato ya sembo bakoloba na Ye: « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala mpe topesaki Yo bilei; tango nini tomonaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela?
Mokonzi akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi: « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.
Bango mpe bakotuna Ye: « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala to na posa ya mayi; tango nini tomonaki Yo mopaya, ozangi bilamba, ozali kobela to okoti na boloko, bongo tosungaki Yo te? »
Akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »