Mokanda na Bomoi 2002
|
| 1 |
| —Bokeba ete bosala bolamu te na miso ya bato, mpo ete bango bamona bino; soki te bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abomopanga bino. |
| 2 |
| Tango ozali kopesa likabo na mobola, kobeta kelelo te liboso na yo ndenge bato ya lokuta basalaka na bandako ya mayangani mpe na babala-bala, mpo ete bato bakumisa bango. Ya solo nalobi na bino; basiʼbazwi lifuti na bango. |
| 3 |
| Kasi tango yo ozali kopesa eloko na mobola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba te likambo loboko ya mobali ezali kosala; |
| 4 |
| mpo ete likabo na yo epesama na sekele; bongo Tata na yo oyo amonaka makambo oyo esalamaka na sekele akopesa yo lifuti. |
| 5 |
| Tango bozali kobondela, bolanda te bizaleli ya bato ya lokuta, bango balingaka kobondela ya kotelema na bandako ya losambo mpe na bisika oyo babala-bala ekutanaka, mpo ete bato bamona bango. Ya solo nalobi na bino: basiʼbazwi lifuti na bango. |
| 6 |
| Kasi yo, soki olingi kobondela, kota na ndako na yo, kanga porte mpe bondela Tata na yo oyo azali na esika ya sekele; bongo Tatana yo oyo amonaka makambo oyo esalamaka na sekele, akopesa yo lifuti. |
| 7 |
| Tango bozali kobondela, bozongela-zongela maloba te ndenge bapakano basalaka. Pamba te, bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango soki balobi mingi. |
| 8 |
| Bosalaka lokola bango te. Pamba te, Tata na bino ayebi soki bozali na posa ya eloko nini, liboso ete bosenga ye yango! |
| 9 |
| Bobondelaka boye: Tata na biso ozali na Likolo, tika ete kombo na yo ekumisama, |
| 10 |
| tika ete Bokonzi na yo eya, tika ete mokano na yo esalama, awa na nse mpe kuna na likolo. |
| 11 |
| Pesa biso lelo bilei na biso ya mokolo na mokolo, |
| 12 |
| limbisa mabe na biso ndenge biso mpe tolibisaka baoyo basalaka biso mabe. |
| 13 |
| Batela biso mpo tokweya na komekama te, kasi kangola biso na mabe. [Pamba te, bokonzi, nguya mpe kembo ezali ya yo mpo na libela na libela.] |
| 14 |
| Pamba te soki bolimbisi bato mabe na bango, Tata na bino ya Likolo akolimbisa bino mpe. |
| 15 |
| Kasi soki boboyi kolimbisa bato mabe na bango, Tata na bino mpe akolimbisa bino te. |
| 16 |
| Tango bozali koboya kolia mpo na mabondeli, bokoma mawa-mawa tendenge bato ya lokuta basalaka. Pamba te, bakomisaka bilongi mawa-mawa mpo na kolakisa bato ete bazali koboya kolia. Nalobi na bino ya solo, basiʼbazwi lifuti na bango. |
| 17 |
| Kasi tango yo ozali koboya kolia mpo na mabondeli, sukola elongi na yo mpe pakola malasi na motu, |
| 18 |
| mpo moto ata moko te ayeba ete oboyi kolia mpo na mabondeli; longola kaka Tata na bino oyo avandaka na sekele. Bongo Tata na yo, oyoamonaka makambo oyo esalamaka na sekele, akopesa yo lifuti. |
| 19 |
| — Bobomba bomengo na mokili oyo te; epai mpese ekoki kolia yango mpe ekoki kobeba, mpe epai miyibi bakoki kotobola mpe koyiba. |
| 20 |
| Kasi bobomba bomengo na likolo; epai mpese ekoki kolia yango te mpe ekoki kobeba te, mpe epai miyibi bakoki kotobola te mpe koyiba te. |
| 21 |
| Pamba te, epai bomengo na yo ezali, motema na yo mpe ekozala kuna. |
| 22 |
| Liso ezali mwinda ya nzoto; soki liso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba ekozala moi. |
| 23 |
| Kasi soki liso na yo ezali mabe, nzoto na yo mobimba ekozala molili. Bongo soki moi oyo ezali na yo ekomi molili, molili yango ekokoma makasi penza. |
| 24 |
| —Moto moko te akoki kosalela bakonzi mibale. Pamba te, akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akoboya oyo mosusu: bokoki kosalela Nzambe na mbongo te. |
| 25 |
| Yango wana nalobi na bino, bomitungisa te mpo na bomoi na bino: soki bokolia nini mpe soki bokomela nini. To mpo na nzoto na bino, soki bokolata nini. Boni, bomoi eleki biloko ya kolia te? Bongo nzoto, eleki bilamba te? |
| 26 |
| Botala bandeke ya likolo elonaka te, ebukaka te, mpe ebombaka bilei na bibomopanga te, kasi Tata na bino ya Likolo aleyisaka yango. Boni, boleki yango na tina te? |
| 27 |
| Nani kati na bino, mpo na mitungisi na ye, akoki kobakisa molayi ya bomoi na ye, ata mpo na ngonga moko. |
| 28 |
| Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka; yango esalaka te mpe etongaka bilamba te. |
| 29 |
| Nzokande nayebisi bino, ata mokonzi Salomon, kati na nkembo na ye mobimba, alataki te lokola moko na yango. |
| 30 |
| Bongo soki Nzambe azali kolatisa na ndenge wana matiti ya bilanga, oyo ezali na bomoi lelo mpe lobi ekobwakama na moto; akoki kolatisabino koleka yango te? A a! bato ya kondima moke! |
| 31 |
| Yango wana, bomitungisa te mpe boloba te: “Tokolia nini?” to “Tokomela nini?” to “Tokolata nini?” |
| 32 |
| Biloko wana nyonso, ezali bapakano nde baluka-lukaka yango. Kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi ete bozali na yango posa. |
| 33 |
| Boluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na ye, bongo biloko wana nyonso bakobakisela bino yango. |
| 34 |
| Yango wana, bomitungisa te mpo na mokolo ya lobi; pamba te, mokolo ya lobi ekomitungisa na makambo na yango, yango moko. Mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango! |
|
| Bomba ba note |
https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2002/matthew/006.mp3
28
6