Moto ya kokosana! Longola liboso mwa eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu mpo na kolongola mwa lititi oyoezali na liso ya ndeko na yo.
—Bopesa te biloko ya bosantu na bambwa; mpe babwakela bangulu bapawuni na bino te; nakobanga ete eniata-niata yango mpe ezongela bino mpo na kopasola bino mike-mike.
Soki bino bato mabe, boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino, bongo mpo na nini te, Tata na bino oyo azali na Likolo, akopesabiloko ya kitoko na baoyo basengaka ye yango?
—Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: “Nkolo! Nkolo!”, nde bakokota na Bokonzi ya Likolo; kasi kaka oyo asalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na Likolo.
Na mokolo wana, bato mingi bakoloba na ngai: “Nkolo! Nkolo!”, tosakolaki makambo na kombo na yo te? Tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki makambo mingi ya kokamwa na kombo na yo te?
Mbula ebetaki mingi penza, mayi etondaki koleka, mipepe ya makasi eyaki mpe ebetaki na ndako yango. Kasi atako bongo, ndako yangoekweyaki te pamba te yango etongamaki likolo ya libanga.