Bamemelaki ye moto moko akufa makolo, oyo azalaki ya kolala na mbeto. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na moto oyo akufa makolo: —Mwana na ngai, yika mpiko, masumu na yo elimbisami!
Kasi mpo boyeba ete Mwana ya Moto azali na bokonzi, na mokili, ya kolimbisa masumu… Bongo alobaki na moto oyo akufa makolo: —Telema, kamata mbeto na yo, mpe zonga na ndako na yo.
Bongo Yesu akendaki. Tango azalaki koleka, amonaki moto moko kombo na ye Matie, avandaki na biro oyo bafutiselaka mpaku. Bongo yesu alobaki na ye: —Landa ngai! Matie atelemaki mpe alandaki ye.
Kasi bokende koyekola tina ya maloba oyo: Nalingi bozala bato ya mitema mawa, kasi naboyi mbeka. Pamba te; nayaki mpo na kobengabato na sembo te, kasi bato ya masumu.
Bongo bayekoli ya Jean bayaki mpe batunaki ye: —Mpo na nini, biso na bafarizeo toboyaka kolia mpo na mabondeli, kasi bayekoli na yo baboyaka kolia te mpo na mabondeli?
Yesu azongiselaki bango: —Ndenge nini, bato oyo babengami na mobali oyo abali, bakoki kozala na mawa na tango ye azali elongo na bango? Kasi tango ekoya, tango bakolongola mobali oyo abali na kati na bango; bongo nde bakoboya kolia.
Ndenge moko mpe batiaka te vino ya sika na basaki ya kala; soki te basaki ekopasuka, vino ekosopana mpe basaki ekobeba. Kasi batiaka vino ya sika na basaki mpe ya sika, bongo vino na basaki ekobombama malamu!
Tango Yesu azalaki naino koloba makambo wana, mokonzi moko ayaki, afukamaki liboso na ye mpe alobaki: —Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sikʼoyo, kasi yaka kotiela ye loboko na yo mpe akozala lisusu na bomoi!
Tango Yesu abenganaki molimo wana ya mabe, moto oyo azalaki kolobate, abandaki koloba. Bato bakamwaki mpe balobaki: —Naino tomoni likambo ya boye te na Isayele!
Yesu azalaki kotambola na bamboka nyonso mpe na bavile nyonso; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani, mpe azalaki kosakola Sango Malamu ya Bokonzi; azalaki kobikisa bamaladi nyonso mpe bapasi ya ndenge na ndenge.
Tango amonaki ebele ya bato, ayokaki mawa mingi penza mpo na bango, pamba te bazalaki komitungisa mpe bazalaki ya kolemba lokola bameme oyo ezangi mobateli.