Sima ya kowuta konyokwama mpe kofingama na Filipi, ndenge boyebiyango, kasi na lisalisi ya Nzambe na biso, tozwaki molende ya koteya bino Sango Malamu na ye, na kati ya bitumba mingi.
Lokola tozali bapostolo ya Kristo, tokokaki kosenga bino bomema mokumba na bino, kasi tozalaki bato ya boboto na kati na bino, ndenge mama abatelaka bana na ye.
Mpo na bolingo monene oyo tozalaki na yango epai na bino, tosepelaki mingi penza kopesa bino kaka Sango Malamu ya Nzambe te, kasi kopesabino mpe bomoi na biso, mpo bokomaki bandeko na biso ya bolingo.
Bandeko na ngai, bokanisa bapasi na biso mpe mosala ya makasi oyo tosalaki; tozalaki kosala mosala butu mpe moi, mpe toboyaki kozala mokumba epai ya moto ata moko na kati na bino, na tango tozalaki koteya bino Sango Malamu ya Nzambe.
tolendisaki bino, tobondisaki bino, mpe tobondelaki bino, mpo bozala na bizaleli oyo ezali ya kokoka liboso na Nzambe, ye oyo abengaki bino na Bokonzi na ye mpe na kembo na ye.
Yango wana biso mpe, tozongisaka matondi tango nyonso epai ya Nzambe, pamba te, tango boyambaki Liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango lokola liloba ya bato te, kasi ndenge ezali penza, Liloba ya Nzambe, oyo ezali kosala kati na bino baoyo bosiʼbondima.
Bandeko, pamba te, bosiʼbokoma bamekoli ya Mangomba ya Nzambeoyo ya Yudea, oyo ezali kati na Kristo Yesu. Bonyokwamaki epai ya bandeko na bino ya ekolo moko, ndenge moko mpe, Mangomba wana enyokwamaki epai ya Bayuda,
Bandeko, mpo na biso, sima ya kokabwana na bino mpo na mwa tango moke—na nzoto kasi na makanisi te, mpe na posa monene oyo tozalaki na yango, tosalaki makasi mpo na komona bino.
Pamba te, banani bazali elikya na biso, banani bazali esengo nabiso, to mpe banani bazali ekoti ya lokumu oyo biso tokozwa na yango kembo liboso ya Nkolo na biso Yesu Kristo tango akoya? Boni, ezali bino te?