Bongo namonaki anjelu mosusu ya nguya makasi kokita wuta na Lola; lipata moko ezipaki ye mpe monama ezingelaki moto na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moyi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto.
mpe alapaki ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko, Ye oyo akela Lola mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango: « Kobanda sik’oyo, tango ya kozela ezali lisusu te!
Bongo mongongo oyo nayokaki wuta na Lola elobaki na ngai lisusu: « Kende, zwa buku oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anjelu oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili. »
Boye, nakendeki epai ya anjelu mpe nasengaki na ye ete apesa ngai buku wana ya moke. Alobaki na ngai: « Kamata mpe lia yango. Ekokoma bololo na libumu na yo; kasi na monoko na yo, ekozala sukali lokola mafuta ya nzoyi. »
Nakamataki buku yango na loboko ya anjelu mpe naliaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi; kasi sima na ngai kolia yango, ekomaki bololo kati na libumu na ngai.