× Language Europe Russian Belarusian Ukrainian Polish Serbian Bulgarian Slovakian Czech Romanian Moldovian Azerbaijan Armenian Georgian Albanian Avar Bashkir Tatar Chechen Slovenian Croatian Estonian Latvian Lithuanian Hungarian Finnish Norwegian Swedish Icelandic Greek Macedonian German Bavarian Dutch Danish Welsh Gaelic Irish French Basque Catalan Italian Galacian Romani Bosnian North America English South America Spanish Portuguese Guarani Quechuan Aymara Central America Jamaican Nahuatl Kiche Qeqchi Haitian East Asia Chinese Japanese Korean Mongolian Uyghur Hmong South East Asia Malaysian Burmese Chin Nepali Cebuano Tagalog Cambodian Thai Indonesian Vietnamese Javanese Lao Iban IuMien Kachin Lahu Aceh Balinese Bugis Pampanga Sasak Shan Waray South Asia Hindi Оdia Awadhi Mizo Kannada Malayalam Marathi Gujarati Tamil Telugu Punjabi Kurukh Assamese Maithili Bengali Urdu Sinhala Dogri Haryanvi Meitei Konkani Santali Sindhi Koya Thado Sanskrit Devanagari Adilabad Gondi Ahirani Balochi Bundeli Chhattisgarhi Garhwali Kangri Kumaoni Mewari Munda Sadri Seraiki Shekhawati Sylheti Central Asia Kyrgyz Uzbek Tajik Turkmen Kazakhstan Karakalpak Middle East Turkish Hebrew Arabic Persian Kurdish Pashto Coptic Africa Afrikaans Xhosa Zulu Ndebele Sotho Amharic Wolaytta Nigerian Mossi Ika Dinka Kabyle Ewe Swahili Morocco Somalian Shona Madagascar Igbo Lingala Baoule Siswati Tsonga Tswana Gambian Yoruba Kamba Kinyarwanda Hausa Chewa Luo Makhuwa Dyula Fulfulde Kalenjin Kikuyu Kikwango Kirundi Krio Nigerian Pidgin Oromo Tshiluba Tshivenda Twi Umbundu Lugbara Luguru Pular Gussi Maasai Turkana Moba Nuer Shilluk Tamasheq Makonde Bemba Fon Hadiyya Ibibio Kimbundu Kimiiru Lango Liberian Kreyol Lomwe Mende Morisyen Ndau Nyankole Sena Sidamo Soga Songe Sukuma Tarifit Teso Tiv Zande Dagbani Australia Continent New Zealand Papua New Guinea Old Languages Aramaic Latin Esperanto 1 1 1 Mokanda na Bomoi 2020 Mokanda na Bomoi 2020Lingala 20021 1 1 Filemo EbandeliKobimaLevitikeMitangoDeteronomiJozueBilombeRite1 Samuele2 Samuele1 Bakonzi2 Bakonzi1 Masolo ya Kala2 Masolo ya KalaEsidrasiNeyemiEsterYoboBanzemboMaseseMosakoliLoyembo ya SalomoEzayiJeremiBileliEzekieliDanieleOzeJoeliAmosiAbidiasiYonaMisheNaumiAbakukiSofoniAjeZakariMalashi--- --- ---MatayoMalakoLukaYoaneMisala ya BantomaBarome1 Kolinto2 KolintoGalatiaEfesoFilipiKolose1 Tesalonika2 Tesalonika1 Timote2 TimoteTitoFilemoEbreJake1 Petelo2 Petelo1 Yoane2 Yoane3 YoaneJideEmoniseli1 1 1 1 11 1 1 : 1 123456789101112131415161718192021222324251 1 1 Filemo 1 Save Notes 1Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto, mpe Timote, ndeko na biso ; Epai ya Filemo, molingami na biso mpe moninga ya mosala ;2epai ya Apia, ndeko na biso ya mwasi ; epai ya Arshipe, moninga na biso ya etumba ; mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka na ndako ya Filemo :3Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !4Tango nyonso nasambelaka, natangaka kombo na yo mpe nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai,5pamba te nazali koyoka sango ya bolingo na yo mpo na basantu nyonso, mpe ya kondima na yo kati na Nkolo Yesu.6Nabondelaka ete kondima oyo ezali kosangisa biso emonisama na misala, mpo ete ososola malamu bolamu nyonso oyo tozali na yango kati na Klisto.7Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema.8Yango wana, atako, kati na Klisto, nazali na makoki ya kotinda yo kosala likambo songolo to pakala,9kasi nasepeli kosenga na yo na kombo ya bolingo, ngai Polo, mobange mpe sik’oyo mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto ;10nasepeli kosenga na yo na tina na Onezime oyo azali mwana na ngai kati na Klisto, pamba te nakomaki tata na ye ya molimo awa, kati na boloko.11Na kala, azalaki na tina ata moko te na miso na yo, kasi sik’oyo akomi na tina mingi na miso na yo mpe na miso na ngai.12Nazali kozongisa ye epai na yo, pamba te azali penza motema na ngai.13Nalingaki ete atikala elongo na ngai awa, na boloko epai wapi nazali mpo na Sango Malamu, mpo ete asalisa ngai na esika na yo.14Nzokande nakokaki te kosala yango, pamba te nazwaki ndingisa na yo te, mpo ete bolamu oyo okosala ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi na kotindika te.15Tango mosusu, mwa tango moke oyo bozalaki ya kokabwana na Onezime ezalaki mpo ete ozwa ye mpo na libela,16lokola mowumbu lisusu te kasi koleka kutu ata mowumbu, lokola ndeko ya bolingo. Azali na litomba mingi mpo na ngai, kasi azali mpe na litomba mingi lisusu koleka mpo na yo, lokola moto mpe lokola ndeko kati na Nkolo.17Soki ya solo ozwaka ngai lokola ndeko na yo kati na kondima, yamba ye lokola nde oyambi ngai.18Soki asalaki yo mabe to mpe azali na niongo na yo, tanga yango na moto na ngai.19Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo : ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai : niongo yango ezali nde bomoi na yo.20Ndeko na ngai, mpo na bolingo ya Nkolo, salela ngai bolamu wana ; kitisa ngai motema lokola ndeko na yo kati na Klisto.21Nakomeli yo na elikya ete okosala makambo oyo nasengi yo, mpe nayebi ete okosala kutu koleka.22Nasengi na yo lisusu ete obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akozongisa ngai epai na bino lokola eyano na mabondeli na bino.23Epafrasi, moninga na ngai ya boloko kati na Yesu-Klisto, atindeli yo mbote.24Ndenge moko mpe Malako, Arisitarke, Demasi mpe Luka, baninga na ngai ya mosala, bango mpe batindeli yo mbote.25Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na yo !Lingala Bible 2020 Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba. Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. Used with permission. All rights reserved worldwide Mokanda na Bomoi Filemo 1 00:00:00 00:00:00 0.5x 2.0x https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/philemon/001.mp3 1 1