× Language Europe Russian Belarusian Ukrainian Polish Serbian Bulgarian Slovakian Czech Romanian Moldovian Azerbaijan Armenian Georgian Albanian Avar Bashkir Tatar Chechen Slovenian Croatian Estonian Latvian Lithuanian Hungarian Finnish Norwegian Swedish Icelandic Greek Macedonian German Bavarian Dutch Danish Welsh Gaelic Irish French Basque Catalan Italian Galacian Romani Bosnian North America English South America Spanish Portuguese Guarani Quechuan Aymara Central America Jamaican Nahuatl Kiche Qeqchi Haitian East Asia Chinese Japanese Korean Mongolian Uyghur Hmong South East Asia Malaysian Burmese Chin Nepali Cebuano Tagalog Cambodian Thai Indonesian Vietnamese Javanese Lao Iban IuMien Kachin Lahu Aceh Balinese Bugis Pampanga Sasak Shan Waray South Asia Hindi Оdia Awadhi Mizo Kannada Malayalam Marathi Gujarati Tamil Telugu Punjabi Kurukh Assamese Maithili Bengali Urdu Sinhala Dogri Haryanvi Meitei Konkani Santali Sindhi Koya Thado Sanskrit Devanagari Adilabad Gondi Ahirani Balochi Bundeli Chhattisgarhi Garhwali Kangri Kumaoni Mewari Munda Sadri Seraiki Shekhawati Sylheti Central Asia Kyrgyz Uzbek Tajik Turkmen Kazakhstan Karakalpak Middle East Turkish Hebrew Arabic Persian Kurdish Pashto Coptic Africa Afrikaans Xhosa Zulu Ndebele Sotho Amharic Wolaytta Nigerian Mossi Ika Dinka Kabyle Ewe Swahili Morocco Somalian Shona Madagascar Igbo Lingala Baoule Siswati Tsonga Tswana Gambian Yoruba Kamba Kinyarwanda Hausa Chewa Luo Makhuwa Dyula Fulfulde Kalenjin Kikuyu Kikwango Kirundi Krio Nigerian Pidgin Oromo Tshiluba Tshivenda Twi Umbundu Lugbara Luguru Pular Gussi Maasai Turkana Moba Nuer Shilluk Tamasheq Makonde Bemba Fon Hadiyya Ibibio Kimbundu Kimiiru Lango Liberian Kreyol Lomwe Mende Morisyen Ndau Nyankole Sena Sidamo Soga Songe Sukuma Tarifit Teso Tiv Zande Dagbani Australia Continent New Zealand Papua New Guinea Old Languages Aramaic Latin Esperanto 1 1 1 Mokanda na Bomoi 2020 Mokanda na Bomoi 2020Lingala 20021 1 1 Jide EbandeliKobimaLevitikeMitangoDeteronomiJozueBilombeRite1 Samuele2 Samuele1 Bakonzi2 Bakonzi1 Masolo ya Kala2 Masolo ya KalaEsidrasiNeyemiEsterYoboBanzemboMaseseMosakoliLoyembo ya SalomoEzayiJeremiBileliEzekieliDanieleOzeJoeliAmosiAbidiasiYonaMisheNaumiAbakukiSofoniAjeZakariMalashi--- --- ---MatayoMalakoLukaYoaneMisala ya BantomaBarome1 Kolinto2 KolintoGalatiaEfesoFilipiKolose1 Tesalonika2 Tesalonika1 Timote2 TimoteTitoFilemoEbreJake1 Petelo2 Petelo1 Yoane2 Yoane3 YoaneJideEmoniseli1 1 1 1 11 1 1 : 1 123456789101112131415161718192021222324251 1 1 Jide 1 Save Notes 1Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake ; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto :2Tika ete mawa, kimia mpe bolingo efuluka kati na bino !3Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.4Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.5Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.6Nzambe akangaki mpe na minyololo ya seko, kati na molili mpo na kosambisama ya mokolo monene, ba-anjelu oyo basepelaki te na evandelo oyo Nzambe apesaki bango mpe batikaki yango.7Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni : basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko.8Ezali mpe ndenge moko mpo na bato wana : makanisi na bango etindikaka bango na kobebisa banzoto na bango, na kotiola bokonzi ya Nkolo, mpe na kofinga bikelamu ya nkembo ya Likolo.9Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni ; kasi alobaki kaka : « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu ! »10Kasi bato wana bafingaka oyo bango basosolaka te, mpe makambo oyo bango basosolaka na lolenge na bango ya bomoto mpe ya bonyama ekobebisa bango.11Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.12Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga : baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango ; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema ; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma ; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.13Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi ; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela.14Ezala Enoki, mokitani ya sambo wuta Adamu, asakolaki na tina na bango : « Tala, Nkolo azali koya elongo na basantu na Ye, bankoto na bankoto,15mpo na kosambisa bato nyonso mpe kopesa etumbu na bato nyonso oyo batosaka Ye te mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mafinga nyonso oyo basumuki yango babimisaki mpo na kofinga Nzambe. »16Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.17Kasi bino, balingami na ngai, bokanisa maloba oyo bantoma ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, balobaki liboso.18Balobaki na bino : « Na tango ya suka, ekozala na batioli oyo bakotambola kolanda baposa na bango, oyo ekotindika bango na koboya kotosa makambo ya Nzambe. »19Bazali bato oyo bakotisaka bokabwani kati na bato, bazali lokola banyama mpo ete bazangi Molimo ya Nzambe.20Kasi bino, balingami na ngai, botonga bomoi na bino na likolo ya kondima na bino, oyo eleki bule. Bobondelaka na nguya ya Molimo Mosantu.21Bomibomba kati na bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela ete Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mawa na Ye, apesa bino bomoi ya seko.22Boyokela bato oyo bazali nanu na tembe mawa ;23mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto ; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.24Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene ;25epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela ! Amen !Lingala Bible 2020 Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba. Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc. Used with permission. All rights reserved worldwide Mokanda na Bomoi Jide 1 00:00:00 00:00:00 0.5x 2.0x https://beblia.bible:81/BibleAudio/lingala2020/jude/001.mp3 1 1