Bible Verses On A TopicTopics God Blessing Come As You Are Commandments Curse Financial Blessing Free Will God's Grace God's Love God's Will God's Timing I Will Never Leave You Miracles Names of God Offerings Plans Being Saved Trinity Time Unconditional Love Viruses / Diseases Who God Is Good Character Acceptance Abstinence Accountability Boldness Caring Cleanliness Commitment Confidence Contentment Courage / Brave Compassion Discipline Faith Grateful Hospitality Humble / Humility Honest Honor Integrity Kindness Love Modesty Mercy Patience Sanctification Self-Control Trust Bad Character Anger Betrayal Bullying Bitterness Complaining Conflict Fear Foolish Hypocrite Jealousy Judgmental Lazy Pride Revenge / Vengeance Vanity Violence Sins Abortion Addiction Adultery Apostasy Cursing Divorce Envy Fornication Gluttony Gossip Greed Hate Lust Lying Masturbation Procrastination Theft Life Aging Animals Adoption Birthday Beauty Being Alone Dating Death Depression Disappointment Discernment Exercise Ethics Fasting Finding Love Focus Family Food Guilt Health Happiness Hell Infertility Job Loss Loss Mental Illness Music Marriage Putting God First Pain Parenting Struggle Sex Trials Temptation Verse For Men Verses For Women War Wealth Widows Church Attending Church Birth Of Jesus Church Persecution Deacons False Teachers Going To Heaven Holy Spirit Messiah In The Bible Pastors Praising God Parables From Jesus Pentecost Speaking in Languages Tithing Worship Womens Roles Mysteries Aliens Cancer Destiny Dinosaurs Dragons Dreams Flat / Round Earth Giants in the Bible Last Days / Future Unicorns Angels and Demons Archangels Angels Beelzebub Demons Guardian Angels Lucifer Sorcerer / Magic Math Signs Number 3 Number 5 Number 7 Number 8 Number 10 Additional Alcohol Abundance Abomination Broken Heart Cannibalism Death Penalty Drugs Evil Emotions Halloween Helping the Poor Miscarriage Police Officers Piercings Polygamy Revival Sadness Science Self Defence Slavery Suicide Talent Tattoos Work Church: [False Teachers] Ezekieli 13:9Jeremi 23:16Luka 6:26Mawa na bino tango bato nyonso bakoloba malamu mpo na bino, pamba te bakoko na bango mpe basalaki bongo epai ya baprofeta ya lokuta!Matayo 24:24Pamba te, ba-Kristo ya lokuta na baprofeta ya lokuta bakobima. Bakosala bilembo ya minene mpe makamwisi mpo na koluka nzela ya kokosa ata bato oyo Nzambe apona, soki yango ekokaki kosalama.Matayo 16:11-12[11] Ndenge nini bozali kososola te ete nalobaki mpo na mampa te? Kasi bokeba mpo na kisi oyo evimbisaka mampa ya bafarizeo mpe ya Basaduseo? [12] Bongo basosolaki ete alobaki na bango mpo bakeba na kisi oyo evimbisakamampa te, kasi mpo na mateya ya bafarizeo mpe Basaduseo. 2 Timote 4:3-4[3] Pamba te tango ezali koya, oyo bato bakolinga te koyoka mateya ya solo, kasi bakolanda baposa na bango ya nzoto, mpe bakomilukelabango moko bateyi, oyo bakoteya bango makambo oyo matoyi na bango ekozala na mokusa mpo na koyoka. [4] Bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa mingi mpo nakoyoka masapo. 2 Timote 4:3-4[3] Pamba te tango ezali koya, oyo bato bakolinga te koyoka mateya ya solo, kasi bakolanda baposa na bango ya nzoto, mpe bakomilukelabango moko bateyi, oyo bakoteya bango makambo oyo matoyi na bango ekozala na mokusa mpo na koyoka. [4] Bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa mingi mpo nakoyoka masapo. Misala ya Bantoma 20:28-30[28] Bomibatela malamu mpe bobatela mpate nyonso oyo Molimo Mosantu apesa bino ete bokengela. Bozala babateli ya Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na ye moko. [29] Nayebi malamu ete sima na ngai kokende, bato mabe bakoya kati na bino, bakozala lokola bankosi, bakoyokela mpate mawa te. [30] Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango. 2 Petelo 3:14-18[14] Yango wana balingami, lokola bozali kozela makambo wana, bosala makasi mingi penza mpo ete Nzambe akuta bino na bosoto te, na likambo moko te ya mabe, mpe na kimia elongo na ye. [15] Boyeba malamu ete, kokanga motema ya Nkolo na biso, ezali mpo ete bato bakoka kobika, ndenge molingami na biso Polo akomelaki binompe, na bwania oyo Nzambe apesaki ye. [16] Akomaka ndenge moko kati na mikanda na ye nyonso, oyo alobelaka makambo oyo. Mikanda na ye ezalaka na makambo mosusu oyo ezalaka makasi mingi mpo na kososola; oyo bato bayebi eloko te mpebalendisama malamu te babongolaka tina na yango, ndenge basalaka mpe na biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko! [17] Yango wana balingami, lokola bosiʼboyebi yango, bokeba mpo ete bolanda te libunga ya bato oyo babeba, mpe bokweyisa molende na bino te. [18] Kasi bokola kati na ngolu mpe kati na boyebi ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo. Nkembo ezala na ye banda sikʼoyo mpe libela na libela. Amen. 1 Yoane 4:1-6[1] Balingami, bondima molimo nyonso te, kasi bomeka milimo mpo na koyeba soki yango ewuti na Nzambe; pamba te baprofeta mingi ya lokuta basiʼbabimi na mokili. [2] Tala ndenge bokoki koyeba Molimo ya Nzambe: molimo nyonso oyo ezali kondima ete Yesu Kristo akomaki moto, molimo yango ewuti na Nzambe, [3] kasi molimo nyonso oyo ezali kondima Yesu te, ewuti na Nzambe te. Yango ezali molimo ya monguna ya Kristo, oyo boyokaki ete ezali koya mpe ezali sikʼoyo kati na mokili. [4] Bana na ngai, mpo na bino, bozali ya Nzambe mpe bosiʼbolonga milimoyango, pamba te oyo azali kati na bino azali monene koleka oyo azali kati na mokili. [5] Baprofeta ya lokuta bazali ya mokili; yango wana balobaka makambo yamokili, mpe mokili eyokelaka bango. [6] Biso tozali ya Nzambe, mpe moto oyo ayebi Nzambe, ayokelaka biso; kasi moto oyo azali ya Nzambe te, ayokelaka biso te. Tala ndenge toyebaka Molimo ya solo na molimo ya lokuta. Matayo 7:15-20[15] —Bokeba na baprofeta ya lokuta. Bayelaka bino na loposo ya bameme, kasi na solo bazali penza bambwa ya zamba. [16] Bokoyeba bango na misala na bango. Boni, bokoki kobuka mbuma ya vinona nzete ya sende? To mpe mbuma ya figi na nzete ya nzube? [17] Ndenge moko mpe, nzete nyonso ya malamu ebotaka bambuma ya malamu; kasi nzete ya mabe ebotaka bambuma ya mabe. [18] Nzete ya malamu ekoki kobota te bambuma ya mabe. Ndenge moko mpe, nzete ya mabe ekoki kobota te bambuma ya malamu. [19] Nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto. [20] Yango wana, bokoyeba bango na misala na bango. 2 Petelo 1:12-21[12] Yango wana, nakobanda tango nyonso kokanisela bino makambo yango, atako boyebi yango mpe bozali ya kokangama makasi kati na makambo ya solo oyo bozali na yango sikʼoyo. [13] Nakanisi ete ezali malamu mpo nalamusaka makanisi na bino awa nazali naino na bomoi na kati ya ndako ya kapo ya nzoto oyo. [14] Pamba te, nayebi ete etikali moke nalongola yango, ndenge Nkolo na biso Yesu Kristo alakisi ngai yango polele. [15] Mpe nakosala makasi, mpo ete ata sima ya kokufa na ngai, bozala tango nyonso na makoki ya kokanisaka makambo yango. [16] Tango toyebisaki bino makambo oyo etali nguya mpe koya ya Nkolona biso Yesu Kristo, tolandaki masapo ya mayele mabe te oyo esalama na bato, kasi tozalaki penza batemwe oyo bamonaki nkembo na ye. [17] Pamba te, tozalaki wana tango azwaki lokumu mpe nkembo oyo ewutaki na Nzambe Tata, tango mongongo eyaki epai na ye wuta na Nkembo monene ya Nzambe, mpe elobaki: Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nasepelaka na ye mingi penza. [18] Mpe biso moko toyokaki mongongo yango oyo ewutaki na Likolo, tango tozalaki elongo na ye, likolo ya ngomba mosantu. [19] Yango wana, tozali na elikya mingi na maloba oyo baprofeta basakola, mpe bokosala malamu mpo na kotia makanisi na bino na yango: Pamba te, yango ezali lokola mwinda oyo ezali kopela kati na esikaya molili, kino tango tongo ekobanda kotana mpe monzoto ya tongo ekongenga kati na mitema na bino. [20] Liboso ya nyonso, esengeli boyeba ete moto moko te akoki kolimbola maloba ya baprofeta, oyo ezali kati na Makomi, na mayele na ye moko. [21] Pamba te, maloba ya baprofeta eyaki na mokano ya moto te; kasi Molimo Mosantu nde atambusaki basantu ya Nzambe mpo na kosakola. Tito 1:6-16[6] Paka ya Lingomba esengeli azala moto oyo azangi mabe, azala mobali ya mwasi moko kaka, bana na ye basengeli kozala bandimi mpe bazala te bana oyo bato bakoki koloba-loba mpo na bango ete bazali bana ya mobulumpe bana oyo bazangi botosi. [7] Pamba te, esengeli ete mokengeli ya Lingomba azala na mabe te, mpomokumba ya mosala ya Nzambe ezali likolo na ye. Yango wana, esengeli azala moto ya lofundu te, moto oyo asilikaka noki te, moto oyo amipesa na masanga te, moto oyo aswanaka te, mpe moto oyo alukaka kozwambongo na banzela ya soni te. [8] Kasi esengeli azala moto oyo ayambaka bapaya malamu, moto oyo alingaka makambo ya malamu, moto ya bwanya, moto na sembo, mosantu, mpe oyo ayebi komibatela malamu. [9] Esengeli asimba makasi penza Liloba ya solo oyo bateyaki ye, mpo ete akoka kolendisa bato mosusu na nzela ya mateya ya solo, mpekosukisa baoyo batiaka tembe na yango. [10] Pamba te, bato mingi bazali batomboki, bato ya biloba-loba mpebakosaka bato; mingi penza baoyo bazali na lisanga ya bato bakatisa nzoto. [11] Esengeli okangisa bango minoko, pamba te bazali kobebisa mabotamingi na nzela ya koteya makambo oyo bakoki koteya te; mpe basalaka bongo mpo na kozwa mbongo na banzela ya nsoni. [12] Moto moko na kati ya baprofeta ya bato ya Krete alobaki: Bato ya Krete bazalaka tango nyonso bato ya lokuta; bazali banyama ya mabe penza, bato ya lokoso mpe bagoigoi. [13] Makambo alobaki ezali ya solo. Yango wana pamela bango makasipenza, mpo ete bazala peto kati na kondima [14] mpe bakangama te na masapo ya bayuda, to mpe na mibeko ya baoyo baboyaka makambo ya solo. [15] “Mpo na ba oyo bazali peto, biloko nyonso ezali peto”; kasi eloko moko te ezali peto mpo na baoyo bazali na bosoto mpebazangi kondima. Pamba te, makanisi na bango mpe mitema na bango ezali na bosoto. [16] Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka ye na nzela ya makambo oyo basalaka. Bazali bato mabe, bato bazangi botosi, mpe bazali na makoki te mpo na kosala ata likambo moko ya malamu. 2 Petelo 2:1-22[1] Kala, bateyi ya lokuta bazalaki na kati ya bato ya Isayele; ndenge moko mpe mpo na bino, bateyi ya lokuta bakozala na kati na bino. Bakokotisa na kobombama mateya oyo ememaka na libebi, bakowangana ata Mokonzi oyo asombaki bango; mpe na ndenge wana, bakomibendela bango moko libebi ya mbalakata. [2] Bato mingi bakolanda nzela na bango ya libebi, mpe bato bakotiolanzela ya makambo ya solo mpo na makambo bango basalaka. [3] Kati na lokoso na bango ya mbongo, bateyi wana ya lokuta bakozwa biloko na bino na mayele ya mabe, na nzela ya masapo oyo bango moko bakosala. Kasi etumbu na bango ekowumela te mpo na kokweya likolo na bango, mpe kobeba na bango ezali kozela bango. [4] Pamba te, Nzambe ayokelaki baanzelu oyo basalaki masumu mawa te, kasi abwakaki bango na libulu ya molayi penza, epai bazali kokengela bango na boloko, na kati ya molili, mpo bazela Mokolo ya kosambisama. [5] Ayokelaki mpe mokili ya kala mawa te; akitisaki mpela likoloya bato na yango oyo bazalaki kotosa makambo na ye te. Kasi abatelaki kaka Nowaoyo azalaki koteya bosembo, mpe bato sambo mosusu elongo na ye. [6] Nzambe apesaki ba-vile ya Sodomo mpe Gomore etumbu, na nzela ya kozikisa yango kino ekomaki putulu, mpe akomisa yango ndakisa epai ya bato oyo bakoboya kotosa makambo na ye. [7] Kasi abikisaki Loti moto na sembo, ye oyo ayokaki mawa mpo na ezaleli ya mabe ya bato wana ya mobulu. [8] (Pamba te Moto na sembo oyo, azalaki kovanda na kati na bango, mpe mokolo na mokolo, azalaki komitungisa mingi na kati ya motema na ye ya sembo, tango azalaki komona mpe koyoka misala na bango ya mabe). [9] Ya solo, Nkolo ayebi ndenge akoki kokangola kati na komekama bato oyo batosaka makambo na ye, mpe ndenge akoki kobomba baoyo bazali kosala mabe, na nse ya etumbu, kino na mokolo ya kosambisama. [10] Kasi akopesa etumbu ya koleka epai ya baoyo bazali kolanda baposa ya mabe ya nzoto, mpe bazali kotiola bokonzi ya Nzambe. Bazali bato ya mitu makasi mpe bato ya lofundu, babangaka te kofinga bikelamo ya Likolo. [11] Nzokande ata baanzelu, bango oyo bazali na makasi mingi mpe nanguya mingi, bafundaka bango te liboso ya Nkolo na maloba ya kofinga. [12] Kasi bato wana bafingaka makambo bango basosolaka te. Bazali lokola banyama oyo ezangi mayele, babotama kaka mpo bakanga bango mpe baboma bango; mpe bakokufa lokola banyama. [13] Bakozwa lifuti mpo na mabe oyo bazali kosala. Bato yango basepelakamingi penza kosala makambo ya mabe na miso ya bato. Bazali bato ya mbindompe ya bosoto, mpe basepelaka kokosa bino tango basanganaka na bino na bafeti. [14] Miso na bango etonda na ekobo mpe batikaka te kosala masumu. Bakangaka na motambo bato oyo balendisama malamu te; mitema na bango etonda na lokoso ya mbongo, mpe bazali na nse ya elakeli mabe ya Nzambe. [15] Basiʼbatika nzela ya malamu mpe bamibungisa mpo na kolanda nzela ya Balami mwana ya Beor, oyo alingaki lifuti ya masumu. [16] Kasi Nzambe apamelaki ye na nzela ya mpunda mpo na mabe oyo asalaki; nyama oyo elobaka te, elobaki na mongongo ya moto mpe ekangisaka bozoba ya moprofeta. [17] Bato yango bazali lokola maziba oyo ebimisaka mayi te mpe lokola mapata oyo mopepe ya makasi ezali kotindika. Nzambe abombela bango esika kati na molili ya makasi penza. [18] Pamba te, tango balobaka, balobaka maloba ya lofundu mpe ezangi tina. Basalelaka baposamabe ya nzoto lokola mwa mosuni ya nyama oyo batiaka na motambo, mpo na kokanga bato oyobabandi kokima bato oyo bazali na kati ya libunga. [19] Bapesaka bango elaka ya kozwa bonsomi, nzokande bango moko bazali bawumbu ya baposa oyo ememaka bango na libebi; Pamba te moto nyonso azali mowumbu ya eloko oyo esila kolonga ye. [20] Soki bato balongwe na kati ya makambo ya bosoto ya mokili, na nzela ya koyeba Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo, mpe bamitiki lisusu ete makambo yango ya bosoto ekanga bango mpe elonga bango, boyeba ete lolenge na bango ya suka ekozala mabe mingi koleka oyo ya liboso. [21] Elingaki kozala malamu mingi mpo na bango ete bayeba nzela ya bosembo te, na esika ete bayeba yango mpe batika yango, mpe basundola Mibeko ya bosantu oyo bapesaki bango. [22] Masese ezali koloba solo mpo na bango: ete mbwa ezongelaka biloko oyo esanzaka mpe “ngulu, ata bawuti kosukola yango ezongaka lisusu kopipota na poto-poto”. Matayo 23:1-29[1] Bongo Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na ye: [2] —Balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo mosala na bango kaka kolimbolela bato Mibeko ya Moyize. [3] Esengeli botosa bango mpe bosala makambo nyonso oyo bakoloba na bino. Kasi bosala te oyo bango basalaka, pamba te oyo bateyaka, basalaka yango te. [4] Bakangaka maboke ya kilo penza mpe batiaka yango na mapeka ya bato; kasi bango moko basimbaka yango te ata na songe ya mosapi. [5] Misala nyonso basalaka, basalaka yango kaka mpo bato bamona bango. Pamba te, bayeyisaka mwa basanduku na bango oyo ekomama mibeko minene, mpe bakomisaka basonge ya banzambala na bango milayi. [6] Na bafeti, balingaka kaka bisika ya kitoko, mpe na Ndako ya mayangani bisika ya lokumu. [7] Balingaka bapesa bango mbote na bazando mpe bato babenga bango: “Moteyi”. [8] Kasi bino, bondima te ete babenga bino: “Moteyi”. Pamba te, bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko. [9] Mpe bobenga moto moko te awa na mokili: “Tata”, pamba te bozali na Tata kaka moko, oyo azali na Likolo. [10] Bolinga te ete babenga bino: “Bakonzi”. Pamba te, bozali na Mokonzi kaka moko: Kristo. [11] Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino. [12] Pamba te moto oyo akomimatisa bakokitisa ye, mpe oyo akomikitisa bakomatisa ye. [13] —Mawa na bino, balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Bokangelaka bato nzela ya Bokonzi ya Likolo, pamba te, bino moko mpe bokotaka te, mpe botikaka nzela te na baoyo balingi kokotampo bakota. [14] [Mawa na bino, balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosaka! Bobotolaka biloko ya basi oyo bakufela mibali; mpe mpo na kokosana, bosalaka mabondeli ya milayi-milayi. Yango wana, bokozwa etumbu oyo eleki monene!] [15] Mawa na bino, balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Bosalaka mibembo na ebale mpe na mokili mpo na koluka kozwa ata mopaya moko oyo akondima kokota na lisanga na bino; mpe soki bozwi ye, bokomisaka yemoto ya lifelo mbala mibale koleka kutu bino moko. [16] Mawa na bino, batambusi bakufa miso! Bino bolobaka ete: Soki moto alapi ndayi na kombo ya Ndako ya Nzambe, wana ezali likambo te. Kasi soki moto alapi ndayi na kombo ya wolo ya Ndako ya Nzambe, moto wana asengeli kotosa ndayi na ye. [17] Bazoba! Bato bakufa miso! Eloko nini eleki na tina, wolo to Ndako ya Nzambe oyo ekomisaka wolo bosantu? [18] Bolobaka lisusu ete: soki moto alapi ndayi na kombo ya mesa oyobatumbelaka Nzambe makabo, wana ezali likambo te. Kasi soki moto alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali likolo ya mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo, moto wana asengeli kotosa ndayi na ye! [19] Bato bakufa miso! Eloko nini eleki na tina, likabo to mesa oyo ekomisi likabo bosantu? [20] Pamba te, moto oyo alapi ndayi na kombo ya mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo, alapi yango na kombo ya mesa mpe na kombo ya biloko nyonso oyo ezali likolo na yango. [21] Moto oyo mpe alapi ndayi na kombo ya Ndako ya Nzambe, alapi yango na kombo ya Ndako ya Nzambe mpe na kombo ya moto oyo afandaka kuna. [22] Mpe oyo alapi ndayi na kombo ya Likolo, alapi yango na kombo ya Kiti ya Nzambe mpe na kombo ya Nzambe oyo afandi likolo na yango. [23] Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Bopesaka makabo ya eteni moko ya zomi ata ya biloko ya mike-mike oyo bolonaka na bilanga na bino, kasi botiolaka makambo oyo eleki tina oyo ya Mibeko; lokola: bosembo, mawa, mpe bosolo. Esengeli bokokisakamakambo oyo, kasi bobosanaka mpe te oyo wana. [24] Batambusi bakufa miso! Bolongolaka mwa ngungi oyo ekotaka na mayi oyo bomelaka, kasi bodundaka shamo. [25] Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Bosukolaka na malamu penza libanda ya bakopo mpe ya basani na bino, kasi na kati na yango, etondi na bosoto ya misala na bino ya moyibi mpe na posa ya mabe. [26] Bafarizeo bakufa miso! Bosukola liboso kati ya kopo mpe ya sani, bongo ekokoma peto kino na libanda. [27] Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Pamba te, bozali lokola malita oyo bapakola kulele ya pembe, na libanda ezali komonana kitoko, kasi na kati etondi na mikuwa ya bato bakufa mpe na biloko ya kopola ya ndenge na ndenge. [28] Bino mpe ndenge moko, na libanda bozali komonana bato malamu, kasi na kati botondi na makambo ya lokuta mpe ya mabe! [29] Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Botongaka malita ya kitoko mpo na baprofeta mpe bobongisaka malita ya bato na sembo; Lingala Bible 2002 Copyright © 2002 by Biblica, Inc.®